28 Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele !
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi, lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.
Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !
Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino ;
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ; nani akolonga ngai na esambiselo ? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.