Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?
Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.