22 Bongo benga ngai, mpe nakoyanola ; to tika ngai naloba, mpe Yo okoyanola ngai.
Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima ; okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo.
Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.
Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,
Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
nalingaki kotombola mongongo na ngai liboso na Ye na kobanga te. Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.