21 longola loboko na Yo likolo na ngai, mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo.
Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela
Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ? Kolenga ekokweyela bino te ?
Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale, mpe nakobombama te liboso na Yo :
Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.
Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.
Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.