17 Boyoka maloba na ngai malamu ; tika ete matoyi na bino eyoka malamu makambo oyo nazali koloba !
Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai, pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe akoki koya liboso na Ye.
Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
Yoka sik’oyo maloba na ngai, yoka kosamba ya bibebu na ngai.
« Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !