15 Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye ?
Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.
Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino ! Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola boyengebene na ngai,
« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.
Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
pamba te soki ata mitema na biso elongisi biso te, toyebi ete Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi nyonso.