Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.


Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ; tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo ;


Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ?


Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.


Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.


Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?


Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ;


Namonaki moto mabe mpe na kanza kokoma na nguya mpe kofuluka lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango,


pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.


Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.


Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.


balekaka lokola mopepe mpe bakobaka nzela na bango, basepelaka kosala mabe, mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ