Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa ? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?


Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.


Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.


Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.


Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.


Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.


Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.


Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.


« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.


Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, nakomi lisapo kati na minoko na bango.


Nani azali lokola Yobo, oyo amelaka kotiolama lokola mayi ?


Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.


Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.


Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.


Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.


Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.


Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza ; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.


‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›


Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ; Nzambe na ngai akoyoka ngai.


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.


Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki : — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ