Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:25 - Mokanda na Bomoi

25 mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole ; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:25
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.


Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki.


Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu : bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga na misala na yango nyonso ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.


Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.


Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso ; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.


Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi ; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.


Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.


Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ