Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:24 - Mokanda na Bomoi

24 alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo mpe asalaka ete batambola kati na bisobe oyo ezanga nzela

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:24
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli ;


Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te.


Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda.


Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.


Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.


Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.


Kasi tika ete mobimbi mpe misisa na yango etikala elala na mabele ; kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba ! Tika ete mamwe epolisa yango, tika ete evanda elongo na banyama ya zamba mpe elia matiti ya mabele elongo na banyama !


Tika ete motema na ye ya bomoto elongwa mpe azwa motema ya nyama kino mibu sambo ekoleka mpo na ye.


Bongo Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari atungisamaki makasi na mwa tango, mpe makanisi na ye ekomaki kobangisa ye. Mokonzi alobaki na ye : — Belitsatsari, tika ete ndoto oyo mpe ndimbola na yango ebangisa yo te !


Kaka tango mayele na ngai ezongelaki ngai, lokumu mpe nkembo na ngai ezongelaki ngai mpo na nkembo ya bokonzi na ngai ; bapesi toli na ngai mpe bato na ngai ya lokumu bakomaki koluka ngai mpe bazongiselaki ngai kiti na ngai ya bokonzi. Nakomaki lisusu na lokumu makasi koleka oyo nazalaki na yango liboso.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ