Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:23 - Mokanda na Bomoi

23 atombolaka bikolo mpe abebisaka yango, akomisaka minene mindelo ya bikolo mpe apanzaka yango ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:23
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.


Motango ya bato mosusu ekiti mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.


Nzambe asalaki bolamu epai ya basi oyo babotisaka. Boye bana ya Isalaele bakobaki kaka kokoma ebele mpe makasi koleka.


Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.


Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene ! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu ; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.


Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.


Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !


Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »


Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.


Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele ; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ