Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.
mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.