20 akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli ;
alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo mpe asalaka ete batambola kati na bisobe oyo ezanga nzela
Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te.
Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye.
Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.