Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 12:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Solo, bozali penza bato ; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 12:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.


« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?


mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo : Nzambe abosana masumu na yo ebele.


« Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este ?


Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.


Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te.


Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni ! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.


Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !


Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.


Mawa na bato oyo bamimonaka lokola bato ya bwanya na miso na bango moko, mpe na bato oyo bamimonaka lokola bato ya mayele na miso na bango moko !


Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama !


Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ