Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.
Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.