9 Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi, mpe eleki ebale monene na kopanzana.
Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye ?
Bandelo yango eleki Lola na likolo ; yo penza okosala nini ? Eleki mboka ya bakufi na bozindo ; yo penza okoyeba nini ?
Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? › Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, makambo oyo nasosolaki te.