Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 11:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka !


Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »


Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.


Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.


Tombola miso na likolo mpe tala ; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.


Tala ndenge nini Nzambe azali monene ! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.


Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali ; azali monene na nguya mpe na solo ; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.


Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.


Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? › Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, makambo oyo nasosolaki te.


Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;


Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.


Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.


Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.


Nyonso oyo ezalisami ezali mosika, mozindo mpe mozindo makasi ; nani akoki komona yango ?


Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !


Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye ; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.


« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli ? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ