Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 11:19 - Mokanda na Bomoi

19 okolala pongi, mpe okomona moto moko te kobangisa yo lisusu, mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 11:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.


Okozala na kimia, pamba te elikya ezali, okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,


Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.


Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.


Mokonzi asepeli na kitoko na yo ; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.


Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.


Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.


Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »


Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.


Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te ; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.


Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ