Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai ! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.