Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 11:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nzokande, soki opesi Ye motema na yo mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 11:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe.


Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »


Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta ?


Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.


Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.


Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.


Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.


bengana ngando oyo ebombami kati na matiti, lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo oyo batambolaka kati na mbongo ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.


Nabelelaka Nzambe na koganga ; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !


Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.


Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te !


Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.


totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba :


Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.


Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ