Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 11:12 - Mokanda na Bomoi

12 Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 11:12
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto azali nani mpo ete azala peto ? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?


Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.


Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti ? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango ?


Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.


Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.


Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.


Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !


Pamba na pamba, elobi Moteyi ; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.


Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo ; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.


Namilobelaki lisusu : « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama.


lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, oyo ebendaka mopepe na zolo soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. Bongo, nani akoki kokanga posa na yango ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali ? Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango ekomona pasi te, pamba te ekozwa yango na tango ya posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.


Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.


Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.


Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.


Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ