Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Solo, ayebaka bakosi mpe asosolaka mabe na pete.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 11:11
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.


Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.


Amoni banzela na ngai te ? Atangi matambe na ngai nyonso te ?


Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »


Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.


Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato.


Yawe, omoni nyonso wana ; kovanda nye te ! Nkolo, kozala mosika na ngai te !


Yawe ayebi makanisi ya bato ; ayebi ete ezali na tina te.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.


Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo ?


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ