Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?