Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 10:22 - Mokanda na Bomoi

22 na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 10:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,


Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :


Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.


Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema


Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !


Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.


Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?


Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.


atako mitema na biso epengwaki te mpe totamboli libanda ya nzela na Yo te.


Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda, mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi ?


Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili, mpe bosembo na Yo, kati na mokili ya bato oyo babosana ?


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.


Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›


Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ