Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 10:21
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei ? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi ? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te.


Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.


na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »


Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.


Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.


Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema


Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !


Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.


Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?


Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.


Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.


okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te.


Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili, mpe bosembo na Yo, kati na mokili ya bato oyo babosana ?


Nakomi moko kati na bakufi, lokola bato oyo basila kokufa na bitumba mpe bazali sik’oyo kati na kunda, lokola bato oyo okanisaka lisusu te, pamba te obatelaka bango lisusu te.


Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso ; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Namilobelaki : « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo !


Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ