18 Mpo na nini obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai ? Nalingaki na ngai kokufa, mpe liso moko te elingaki komona ngai.
Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.
Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »
Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai ekangi ngai monoko te.
Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ; Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai. Nakokumisa Yo tango nyonso.
Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.