Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Soki nameki kotombola moto, ozali kolanda ngai lokola nkosi mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso mpo na kotelemela ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 10:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?


Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.


Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;


Nakangaki motema kino na tongo ; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.


Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango ; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango ; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.


Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai ;


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ