13 Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.
Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.
Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; nani akoki kotelemela Ye ? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.
Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka, Nzambe, Mobikisi ya Isalaele !
Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.
Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?
Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !
kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.