Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 10:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 10:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.


Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !


Soki ezali penza ya solo ete nabungi nzela, mbeba na ngai etali kaka ngai moko.


Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi ; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.


Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ?


Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.


Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi ! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.


Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.


Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango ! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ