8 Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
Mokonzi moko te azongelaki Yawe lokola Joziasi, na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso, kolanda mibeko nyonso ya Moyize. Mpe sima na ye, mokonzi moko te azalaki lokola ye.
Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !
Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »
« Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.
Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.