Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 1:3
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.


Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.


Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ;


Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.


Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.


Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.


Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye :


Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? »


Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.


Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.


Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo ; Yedeya, moto ya libota ya Meronoti, azalaki mobateli ba-ane ya basi.


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele : bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi.


Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.


Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango.


bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›


Naponaki nzela mpo na bango mpe navandaki lokola mokonzi na bango ; nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. »


soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, bomengo oyo maboko na ngai esalaki,


nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.—


Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.


Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema mpe bobundisa Kedari, bobebisa bato ya este.


Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; yaka, loba mabe mpo na Isalaele.


Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.


Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.


Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.


Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ