Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 1:22 - Mokanda na Bomoi

22 Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 1:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.


Yobo azongiselaki ye : — Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ?


Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.


Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili : bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.


Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.


Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ