Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 1:18
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,


Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango.


Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.


« Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, loboko oyo ezali likolo na ngai eleki kolela ya motema na ngai na kilo.


Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,


Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango !


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu ; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.


Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.


Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu, mpe bamemi sango bazali kolandana mbangu mpo na koyebisa mokonzi ya Babiloni ete babotoli engumba mobimba,


Bino bato nyonso oyo bolekelaka wana ; boni, ezali kosala bino eloko moko te ? Botala malamu zingazinga na bino, ezali na pasi lokola pasi oyo ekomeli ngai ? Yawe atindeli ngai yango na mokolo ya kanda makasi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ