Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 1:17
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.


Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.


Davidi atunaki ye : — Owuti wapi ? Azongisaki : — Nakimi wuta na molako ya Isalaele.


bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,


Tala mokili ya bato ya Chalide, bato oyo bazalaka lisusu te ! Bato ya Asiri bakomisaki yango esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe ; batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela, babukaki bandako na yango batonga makasi mpe bakomisaki yango putulu.


mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.


Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te : batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ