Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 mpe alobaki na ye : — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 9:7
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.


Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.


Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?


Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te, mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.


Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.


mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.


Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te ; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.


« Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?


pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »


mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili : « Ozali kofinga, » mpo nalobaki : « Nazali Mwana na Nzambe ? »


Kasi bamosusu kati na bango balobaki : — Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?


Azongiselaki bango : — Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.


Yesu alobaki : — Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili ; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.


Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ