Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye : — Boni, omoni eloko ?
Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.