Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 9:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »


Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema na liboso ya bato nyonso.


kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?


Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te.


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.


Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.


Yesu alobaki : — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai.


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.


Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.


Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ