Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.
mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi : Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.
Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele ; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.