32 Mpe totikala nanu koyoka te ete moto abikisi moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.
Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,
Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?
akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala na nzela ya basakoli na Ye ya bule,
Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.
Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi ; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili.