Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 9:30 - Mokanda na Bomoi

30 Moto yango azongisaki : — Oh, ezali penza likambo ya kokamwa soki boyebi te epai nini awuti ! Kasi mpo na ngai, abikisi miso na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 9:30
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.


Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »


Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, mpe bakufi miso bakomona tango bakobima na butu mpe na molili.


Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »


Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya.


Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te


Yesu alobaki na ye : — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo ?


Toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize ; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi !


Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ