24 Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [
Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.
Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.
Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.