Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 9:22
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?


Esengo na bino tango bato bazali koyina bino, tango bazali kobengana bino, tango bazali kofinga bino, mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino, likolo na Mwana na Moto !


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu.


Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !


Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu.


Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye


kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo ; akoloba na tina na ye moko.


Bazongiselaki ye : — Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso ? Boye, babenganaki ye.


Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : — Boni, ondimi Mwana na Moto ?


Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini.


Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi.


babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ