Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Yesu alobaki na bango : — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile ?
Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : — Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !