19 mpe batunaki bango : — Mobali oyo azali mwana na bino ? Boni, abotama solo mokufi miso ? Ndenge nini sik’oyo akomi komona ?
Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye
Baboti na ye bazongisaki : — Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso ;
basosolaki ete ezali moto oyo azalaki kovanda na « Ekuke ya kitoko » ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza, mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalemaki epai na ye.
Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba.