Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 9:17
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !


Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Yango wana Bafarizeo mpe batunaki ye soki ndenge nini miso na ye ebikaki. Azongiselaki bango : — Atiaki ngai potopoto na miso, nasukolaki mpe nakomi komona.


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,


Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ