Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:59 - Mokanda na Bomoi

59 Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:59
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.


soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.


Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.


Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.


Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda ; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.


Bayekoli balobaki na Ye : — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?


Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.


Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.


Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.


Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.


Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye,


Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ