Nazali koloba na bino penza ya solo : basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
Yesu azongiselaki bango : — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai ;
Bazongisaki : — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango : — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.