5 Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga ; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto.
Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.
Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli ; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.
Balobaki na Yesu : — Moteyi, mwasi oyo asali ekobo ; bakuti ye penza azali kosala yango !