49 Yesu azongisaki : — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai.
Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
alobaki na ngai : « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »
Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
Tata, pesa Kombo na Yo nkembo ! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.
Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.
Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?
Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.
Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,
ekundami nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya lokumu ; ekundami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya ;
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.