Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:48 - Mokanda na Bomoi

48 Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:48
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.


Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »


Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo : lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te.


Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?


Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo.


Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—


Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?


Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango : — Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna ? »


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko ; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »


Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki ;


Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko ? Osalaka malamu ! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ